Bomoi ezali kokamwisa te? Tozali na bantina ebele
ya kopesa matondi!
Kasi osila komituna soki kaka yango wana ezali?
To ezali na KOLEKA?
Likambo ya liboso: Nzambe azali, mpe alingaka biso mpenza! Bolingo na Ye ezangaka suka mpe ezangaka mobingelo. Alakisaki biso bolingo na Ye na nzela ya Yesu Klisito. Bolingo na Ye ezali kaka na ntina lelo oyo, mpe moto nyonso akoki koyoka yango. Nzambe alingi eloko te koleka ete oyoka bolingo na Ye na bomoi na yo moko mpe ete omona ntina ya bomoi na yo na nzela ya boyokani elongo na Ye.
Na lisolo na ye ya monene na TED Talk, Lizzie Velasquez alobaki: “ntango nazalaki na eteyelo ya ntei, namonaki video oyo moto moko atiaki mpo na ngai mawa mingi, kopesaka ngai nkombo ya mwasi oyo aleki mabe na mokili mobimba. Video yango ezwaki bataleli milio 4. Segonde 8 molai, mongongo te, bankama ya bakomantere. Bato bazali koloba ‘Lizzie, salela mokili ngolu, tia mondoki na moto na yo mpe boma nzoto.’ Nalelaki pinzoli mingi mpenza mpe namibongisaki mpo na kobunda bongo eloko moko efungwamaki na motó na ngai.”
Lizzie azalaki na ekateli ya kozwa: asengelaki kotika bapaya báloba ye azali nani to Ye oyo akelaki ye. Na buku ya bomoi na ye alobi, “Nzambe alingaka ngai mpe alingaka bino kaka ndenge tozali.”

MOKOMI MPE MOLOBI YA KOPESA MAKASI
Mawa mingi, mbala mingi toyokaka bolingo ya Nzambe te mpo mbala mingi tobosanaka Ye. Tolukaka ntina mpe bosego bisika binso longola kaka Nzambe. Totielaka Ye motema te mpe tondimaka te ete azali na myango ya malamu mpo na biso. Koluka kaka biso moko mpe misala oyo euti na yango nde Biblia ebengi lisumu. Lisumu ezokisaka mpe ebebisaka boyokani na biso na bato basusu. Ekabolaka biso na bomoi ya kotonda oyo Nzambe abongiseli biso.
Lokola mama mabele (masœur) mpe misionere, Mama Teresa asalisaki babola. “Ngai, Mama Teresa, nazali mosumuki. Biso banso tozali basumuki. Mpe biso banso tozali na mposa ya ngolu ya Nzambe. Nazali komitungisa, pamba te bamosusu kati na bino bayebi Yesu naino te—kaka bino mibale na boyokani ya motema. Boyebi mpenza Klisito ya bomoi, kaka mpo bobingisaki Ye na bomoi na bino? Nalingi kopesa Yesu ntango nyonso libaku ya kolongola eloko nyonso oyo ebebisaka mpe oyo ekabolaka ngai na Ye. Ntango bolingo na ngai ekabwani mpe libulu esalemi kati na Ye na ngai, makambo ndenge na ndenge ekoki kokɔta na libulu yango mpe kotondisa yango.”

MASŒUR MPE MISIONERE
Lisumu na biso mpe mposa na biso ya kobika biso moko epekisaka Nzambe te kolinga biso. Akendeki ata kino na kokóma moto na nzela ya Yesu Klisito mpe kolakisa bolingo na Ye mpo na biso na kopesaka bomoi na Ye. Amemaki mbuma ya lisumu likoló na ye moko na kuruse. Yesu akufaki, kasi asekwaki na bomoi. Sikawa tokoki komona kimia mpe kozala na boyokani elongo na Nzambe na nzela ya bondimi na kati ya Yesu Klisito. Tokoki koyoka bolingo ya Nzambe mikolo nyonso, koyeba ntina ya bomoi na biso mpe kozwa bomoi ya seko.
Mokomi ya babuku ya Narnia, C.S. Lewis alobi: “Boklisto, soki ezali ya lokuta, ezali na ntina moko te, mpe soki ezali ya solo, ezali na ntina monene mpenza ya seko; eloko se moko oyo ekoki kozala te ezali kozala na mwa ntina moke pamba. Boye totikali liboso ya
mahitamo ya kolɛngisa. Moto oyo tozali kolobela azali (mpe azali) kaka oyo alobaki to azali ligboma, to eloko mosusu oyo eleki mabe. Kasi emonani na ngai polele ete azalaki ligboma te to nyama mabe te: mpe yango wana, ata soki ezali kokamwisa to kobangisa to kokóma lokola likambo ya pamba, nasengeli kondima liteya ete azalaki mpe azali Nzambe.”

MOKOMI
Nzambe asilaki kosala nyonso mpo na kolakisa ndenge nini alingaka biso. Na nzela ya Yesu Klisito, azali kopesa biso bosego mpe bomoi ya seko, oyo tokoki koyamba ofele lokola likabo. Tokoki kosolola na Nzambe mbala moko – tobengaka yango “libondeli” – mpo na kosɛnga bolimbisi mpo na kofanda bomoi na biso kozanga Ye.
Tokoki kopona kobika elongo na Nzambe na kotielaka Yesu Klisito motema kobanda sikawa. Okozwa ekateli nini?
Oyo ezali te likambo ya lingomba to kokɔta na ndako ya Nzambe, kasi ezali likambo ya boyokani oyo ebongolaka bomoi elongo na Yesu Klisito. Esengeli kosala mosala makasi te mpo na yango, kasi okoki koyamba bolingo mpe nguya na Ye lokola likabo mpe okozwa bomoi ya sika mpenza. Makambo mingi makobongwana. Kanisá malamu mpenza likoló na yango.
Fungola ya Nzambe mpe bokonzi na Ye ezali bondimi. Ezali kaka te kondima ete azali, kasi ezali kotiela Yesu motema lokola mwana moke mpe kotia nyonso oyo tozali na yango mpe oyo tozali epai na Ye.
Biso banso tozalaki kokoka te mokano ya kolinga Nzambe koleka eloko nyonso mpe baninga na biso bato lokola biso moko. Tokoki kosɛnga Nzambe bolimbisi mpo na yango. Tosengeli kobaluka longwa na nyonso oyo eyokanaka te na Yesu mpe kokóma mingi koleka lokola Ye.
Na batisa, ozindisami na kati ya mai na moto oyo alingaka Yesu. Na ndenge wana, ozali koloba na polele „ɛɛ“ epai ya Yesu, oyambami na libota ya likoló mpe ozwi bomoto ya sika ya banzambe.
Tozwaka kaka libaku ya mibale te epai ya Nzambe, kasi alingi kokómisa biso bato ya sika mpenza mpe kotondisa biso na Molimo Mosantu na Ye, oyo asekwisaki Ye kati na bawa. Kaka bengisá Ye to tiká mondimi abondela mpo na yo mpo obotama na elimo „lisusu“.
Soki olingi kobika elongo na Yesu kobanda sikawa, okoki kosala libondeli oyo elandi:
Nzambe ya bolingo, matondi mpo na kolinga ngai mpe kolinga bolamu mpenza mpo na bomoi na ngai. Nayoki mawa mpo nabikaki kozanga yo kino lelo. Limbisá ngai masumu na ngai. Natielaka yo motema mpe nalingi okɔta na bomoi na ngai. Zalá Nzambe na ngai. Zalá Mobikisi na ngai mpe moninga na ngai. Tondisá ngai na Molimo na yo mpe salisá ngai nabika bomoi oyo esepelisaka yo. Amen.
2 Bakorinto 5:17
Soki osɛngaki Yesu na motema mobimba ete aya na bomoi na yo, Mozalisi ya likoló mpe mabele akómi sikawa Moninga na yo, Mobikisi, mpe Nkolo. Mbote na esengo! Outi
kozwa ekateli oyo eleki malamu na bomoi na yo!
Uti kozwa litambe ya liboso na mobembo ya bomoi mobimba, mpe Nzambe abombeli yo makambo mingi!
Soki olingi koyeba Yesu malamu koleka mpe kokóma mingi lokola Ye, makambo oyo ekoki kosalisa:
Okoki kobondela mikolo minso, bisika binso, mpe mpo na makambo nyonso. Sololá na Ye mpo na oyo ezali na motema na yo. Nzambe azali moninga na yo mpe alingaka mingi kolekisa ntango elongo na yo.
Okoyeba Nzambe malamu koleka na kotángáká Biblia mobimba. Okoki mpe koyekola mokano na Ye mpo na bomoi na yo, mpe ndenge nini bato basusu bamonaki Ye. Bandá na kotánga na Boyokani ya Sika mikolo minso
Sikawa ozali eteni ya libota ya Nzambe elongo na bato banso basusu oyo
badimaka. Luka lingomba to lisangá epai oyokaka lokola na ndako mpo na kokoba kokolisa bondimi na yo.
Ozali molandi ya Yesu, moto oyo alingi koyekola epai na Ye. Luka balolenge ya malamu mpe ya kitoko mpo na kobika bondimi na yo. Yebisá basusu ndenge oyokaka Nzambe mpe oyo Yesu asalelaki biso banso na kuruse. Salelá THE FOUR mpo esalisa yo kokabola nsango.
Kakatana te mpo na kokutana na biso. Tokozala na esengo ya koyanola na mituna, kopesa yo Biblia, kobondela mpo na yo, mpe kosalisa yo ozwa matambe na yo makolanda elongo na Nzambe
Ebandeli & Botɔndi
Maloba oyo ezuami:
Lizzie Velasquez, https://ted.com/talks/lizzie_velasquez_how_do_you_define_yourself
Buku: “Be beautiful, Be You” Lizzie Velasquez, Liguorii Publications, Missouri 2012. Nkasa 12; “
Mutter Teresa, Die wunderbaren Geschichten” Leo Maasburg, Pattloch Verlag, München 2016. Nkasa 83;
Buku: “Mere Christianity”
C. S. Lewis. Harper Collins, New York 2000. Nkasa 53;
Video: “Put God first” na Denzel Washington, https://youtu.be/BxY_eJLBflk
Bilili:
Nsima getwallpapers.com
Nkasa 2: Foto ‘portrait of a little girl with a sunflower’ na azgek via Envato Elements
Nkasa 5: Foto ‘man walking on empty road‘ na jurnalfotografic via Envato Elements
Nkasa 7: Foto ‘crowd partying stage lights live concert summer music festival‘ na melis82 via Envato Elements
Nkasa 10: Foto ‘Family is all you needl‘ na YuriArcursPeopleimages via Envato Elements
You will be redirected to your country's page...