Sambelá

Kobondela ezali pete mpenza – ata soki oyebi yango naino te. Kabolá kaka mituna na yo, bobangi na yo mpe bamposa na yo elongo na Nzambe.

Libondeli oyo okoki koloba >

Nzambe ya bolingo, matondi na ndenge olingaka ngai. Namoni ete nabikaki kozanga yo kino sikawa. Nazali koyoka mawa mpenza mpo na yango. Limbisá ngai na kotambola na nzela na ngai moko mpe limbisá masumu na ngai nyonso. Kobanda sikawa nalingi kobika elongo na yo mpe mpo na yo. Zalá Nzambe na ngai, zalá Mobikisi na ngai, mpe zalá moninga na ngai. Amen.

Monɔkɔ