Tángá

Biblia ezali Liloba ya Nzambe. Na kotángáká yango, toyebaka Nzambe mpe tozwaka boyebi malamu ya mwango na ye mpo na bomoi na biso. Toponi mwa bavɛrsɛ na Biblia mpo na yo mpo obanda mobembo na yo elongo na Nzambe.

1. NZAMBE ALINGAKA NGAI

Ezali na Nzambe oyo alingaka yo na bolingo monene mpenza. Ayebi motema na yo ya kati-kati, azali elongo na yo na bangonga na yo ya koleka ya kozala yo moko, mpe alingaka yo ata na mikolo na yo ya mabe mpenza. Nzambe oyo ya bolingo azali ya solo, mpe okoki mpenza koyeba Ye. Alingi eloko mosusu te kaka yo oyoka bolingo na Ye na bomoi na yo mpe omona ntina ya bomoi na yo na boyokani elongo na Ye, na kozwa bosego ya solo na bomoi.

Ozali kolakisa ngai nzela ya bomoi. Okotondisa ngai na esengo na liboso na yo. Na lobɔkɔ na yo ya mobali, bisengo ezali seko. Nzembo 16:11

Boye toyebi bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso, mpe totielaka yango motema. Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo afandaka na bolingo afandaka na kati ya Nzambe, mpe Nzambe afandaka na kati na ye. 1 Yoane 4:16

Ondimaka ete Nzambe ayebi yo mpe alingaka yo?

2. NAZALI KOBIKA MOSIKA NA NZAMBE

Kasi mawa mingi, toyokaka bolingo oyo ya monene te mpo tobwaka Nzambe pembeni. Tolukaka ntina, mwango mpe esengo bisika binso – kasi epai ya Nzambe te. Toboyaka Ye mpe totielaka Ye motema te ete alingaka bolamu na biso. Kotambola na nzela na biso moko mpe misala ya lokoso oyo euti na lolenge wana ya bomoi nde Biblia ebengi lisumu. Lisumu ebebisaka mpe epanzaka boyokani na biso na Nzambe, na basusu, ata mpe na biso moko. Lisumu esukaka kaka na kokabola biso na nyonso oyo Nzambe alingi kopesa biso, elingi koloba bolingo na Ye mpe bomoi oyo ezali na ntina – bomoi oyo eleki ata liwa.

Kasi masumu na bino ekaboli bino na Nzambe na bino. Ebombi elongi na Ye epai na bino, mpo ayoka bino te. Yisaya 59:2

Pamba te bato banso basali lisumu, mpe bazangi nkembo ya Nzambe. Baroma 3:23

Nini oyokelaka mawa mingi koleka na bomoi na yo?

3. YESU APESAKI NYONSO MPO NA NGAI

Nzambe atikaki biso te. Ayokaki mawa mingi mpo na kokabwana na biso na Ye bongo akómaki penepene na biso. Akómaki moto na kati ya Yesu Klisito mpo na kolakisa biso bolingo na Ye ya likoló na makambo nyonso oyo alobaki mpe asalaki. Na nsuka, apesaki ata bomoi na Ye mpo na biso. Azwaki esika na biso likoló ya kuruse, amemaki ye moko mbuma nyonso ya lisumu. Yesu akufaki – kasi asekwaki lisusu na bomoi, alongaki liwa mpe nyonso oyo ekabolaki biso na Nzambe. Na nzela ya Yesu tokoki kokɔta na boyokani ya solo elongo na Nzambe. Na bondimi na kati ya Yesu tokoki komona bomoi ya bolingo, nguya mpe ntina.

Pamba te Klisito mpe akufaki mpo na masumu mbala moko mpo na seko, Moyengebene mpo na bato bazangi boyengebene, mpo amema bino epai ya Nzambe. Babomaki Ye na nzoto, kasi akómisamaki na bomoi na Molimo. 1 Petelo 3:18

“Pamba te Nzambe alingaki mokili mingi, yango wana apesaki Mwana na Ye se moko, mpo moto nyonso oyo akondima Ye akufa te, kasi azwa bomoi ya seko.” Yoane 3:16

Yesu azali nani mpo na yo moko?

4. NAKOPONA KOLANDA YESU?

Nzambe asilaki kosala nyonso mpo na kolakisa biso ndenge nini alingaka biso mingi mpe afungolaki nzela mpo toyoka mpenza bolingo na Ye. Na nzela ya Yesu Klisito, azali kopesa biso bosego mpe bomoi ya seko. Tokoki kondima likabo oyo – na milende ya moto te to na misala ya malamu te – kasi kaka na bondimi. Tobandaka kaka na kosolola mbala moko na Nzambe na libondeli. Tokoki koyebisa Ye ete tozali koyoka mawa mpo na kofanda kozanga Ye. Mpe ete toponi kobika elongo na Ye kobanda sikawa na kotiela Yesu Klisito motema. Okozwa ekateli nini?

“Bino banso bobongola mitema, mpe moto na moto kati na bino abatizama na nkombo ya Yesu Klisito mpo na bolimbisi ya masumu na bino, mpe bokozwa likabo ya Molimo Mosantu.” Misala 2:38

Kasi banso bayambaki Ye, apesaki bango lotomo ya kokóma bana ya Nzambe, elingi koloba baoyo bandimaka nkombo na Ye. Yoane 1:12

Mbano nini ekozala soki obikeli Nzambe na nyonso oyo ozali na yango mpe oyo ozali? Soki Yesu atelemaki liboso na yo sikawa mpe atuni yo: ‘Olingi kobika elongo na ngai mpe mpo na ngai’, eyano na yo ekozala nini?

Awa okoki komona libondeli oyo ekoki kosalisa yo

5. BOMOI YA SIKA ELONGO NA YESU

Soki obengisi Yesu na bomoi na yo, Mozalisi ya likoló mpe mabele akómi sikawa Nzambe na yo moko, Mobikisi mpe moninga na yo. – Mbote mpe esengo mpo na ekateli oyo eleki malamu na bomoi na yo! Makambo makolanda ekosalisa yo okóma lokola Yesu.

TÁNGÁ
Na Biblia okoyeba Nzambe, mokano na Ye mpe ndenge nini bato babikaki elongo na Nzambe. Kómisa yango momeseno ya kotánga Biblia mikolo minso. Soki ozali na Biblia te, okoki kokitisa “Bible App” ya Lifechurch ofele.

BONDELÁ
Okoki kosolola na Nzambe bisika binso mpe ntango inso mpo na makambo nyonso. Nzambe azali moninga na yo mpe alingaka mingi kolekisa ntango elongo na yo.

KUTANÁ
Sikawa ozali eteni ya libota ya Nzambe elongo na banso bandimaka Ye. Luka lingomba to lisangá ya baklisto epai wapi bakoyamba yo na esengo mpe epai bondimi na yo ekoki kokola.

KABOLÁ
Sikawa ozali “moyekoli” ya Yesu. Yebisa basusu makambo ozali komona elongo na Nzambe na bomoi na yo mpe oyo Yesu asaleli bango (na kosaleláká THE FOUR).

Moto nyonso oyo azali na kati ya Klisito akómi ekelamu ya sika. Makambo ya kala esili! Tala, makambo masusu makómi ya sika! 2 Bakorinto 5:17

Mpe batikali ngwi na mateya ya bantoma, na lisangá, na bokaboli limpa mpe na mabondeli. Misala 2:42

Monɔkɔ