NZAMBE ALINGI NGAI

NZAMBE ALINGI NGAI

Nzambe alingi yo mobimba! Bolingo na Ye ezangi ndelo mpe esengi eloko moko te. Bolingo ya Nzambe etalisami kaka na Yesu Kristo. Nzambe wana wa bolingo okoki kobika Ye, Aza solo penza, mpe asengi yo eloko te mpo oyeba yo moko bolingo na Ye, mpo’ete ososola tina ya bomoyi na yo na boyokani na Ye.

NAZO BIKA MOSIKA NA NZAMBE

NAZO BIKA MOSIKA NA NZAMBE

Na mawa nyonso, tozali kobika bolingo ya Nzambe te mpo tozali koboya Ye. Tolukaka bisika nyonso ntina mpe kokokisama kasi Nzambe te. Totielaka Ye motema te mpe tokanisaka te ete Ye alingi oyo eleki malamu mpo na biso. Kokende na nzela na biso moko mpe misala ya moimi oyo euti na yango ezali oyo Bibilia ebengi lisumu. Lisumu ebebisaka boyokani na biso na basusu. Lisumu ezali kopekisa biso kozala na bomoi ya kokokisama oyo Nzambe akani mpo na biso.

YESU APESA NYONSO MPO NA NGAI

YESU APESA NYONSO MPO NA NGAI

Lisumu na biso mpe misala na biso ya moimi epekisaka Nzambe te kolinga biso. Akomaki kutu moto kati na Yesu Kristo mpe apesaki bomoi na Ye mpo na biso. Azwaki esika na biso na ekulusu, komema mbano nyonso ya lisumu Ye moko. Yesu akufaki – kasi asekwaki lisusu na bomoi. Apesaka biso kimia elongo na Nzambe mpe boyokani ya moto na moto elongo na Ye. Na nzela ya kondimela Yesu, tokoki komona bolingo ya Nzambe mokolo na mokolo, kozwa mokano na biso, mpe kozala na bomoi ya seko nsima ya liwa.

NAKO PONA KOLANDA YESU?

NAKO PONA KOLANDA YESU?

Nzambe asi asali nionso po alakisa biso boniboni alingi biso. Na nzela ya Yesu Klisto, Ye apesi biso kokokisama mpe bomoi ya seko. Tokoki kosolola na Nzambe mbalamoko – tobengi yango “libondeli” – mpo na kosenga bolimbisi ya kozala na bomoi ya kozanga Ye. Tokoki kopona kobika elongo na Nzambe na kondimela Yesu Klisto uta sikawa. Ndenge nini okozwa ekateli?

Naza na motuna Libondeli okoki kosala